Acts 22:5 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe lisanga mobimba ya bakambi bakoki kotatola bosolo ya makambo oyo nazali koloba. Bango nde kutu bapesaki ngai mikanda mpo ete nakende kopesa na bandeko na bango ya Damasi. Boye, nakendeki kuna mpo na kokanga bato mpe komema bango na Yelusalemi, mpo ete bapesa bango etumbu.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Mokonzi ya banganga-Nzambe mpe likita mobimba ya bakambi bakoki kotatola bosolo ya makambo oyo nazali koloba. Bango nde kutu bapesaki ngai mikanda mpo ete nakende kopesa na bandeko na bango ya Damasi. Bongo, nakendaki kuna mpo na kokanga bato mpe komema bango na minyololo na Yelusalemi, mpo ete bapesa bango etumbu.