Acts 23:21 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Kasi kondima bosenga na bango te, pamba te bato koleka tuku minei kati na bango bazali kobongisa motambo mpo na kokanga ye; balapaki ndayi ete bakolia te mpe bakomela ata eloko moko te kino bakoboma Polo. Makambo nyonso esili kobongisama mpe bazali kozela kaka ndingisa na yo.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Kasi kondima bosenga na bango te. Pamba te, bato koleka tuku minei kati na bango bazali kobongisa motambo mpo na ye. Balapaki ndayi ete bakolia te mpe bakomela ata eloko moko te, kino bakoboma Polo. Makambo nyonso esili kobongisama mpe bazali kozela kaka ndingisa na yo!