Acts 23:9 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Makelele emataki makasi penza. Boye ndambo ya balakisi ya Mobeko oyo bazalaki Bafarizeo batelemaki mpe batombolaki mingongo na mpiko nyonso: — Solo, tomoni ata mabe moko te ya kopamela moto oyo. Nani ayebi? Tango mosusu molimo to anjelu nde alobaki na ye.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Makelele emataki makasi penza. Boye, ndambo ya balakisi ya mibeko kati na lisanga ya bafarizeo batelemaki mpe balobaki na molende nyonso: “Solo, tomoni ata mabe moko te na moto oyo. Nani ayebi? Tango mosusu molimo to anjelu nde moto alobaki na ye.”