Acts 26:11 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Kati na bandako nyonso ya mayangani, nazalaki mbala mingi kotambola mpo na kopesa bango bitumbu mpe kotinda bango na makasi ete bafinga Yesu-Klisto. Na zuwa na ngai oyo eleka ndelo, nazalaki kolanda bango kino na bingumba ya bapaya mpo na konyokola bango.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Mbala mingi nazalaki kotambola na bandako ya mayangani mpo na kopesa bango bitumbu mpe kotinda bango na makasi ete batiola Yesu Klisto. Na zuwa na ngai oyo eleka ndelo, nazalaki kolanda bango kino na bingumba ya bapaya mpo na konyokola bango.