Acts 26:20 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Nateyaki liboso bavandi ya Damasi; sima, nateyaki bavandi ya Yelusalemi, ya Yuda mobimba mpe ya bikolo ya bapaya: nateyaki bango ete basengeli kobongola mitema, kozonga epai ya Nzambe mpe, na nzela ya misala na bango, kolakisa penza ete babongoli mitema.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Nabandaki koteya liboso bato ya Damasi, ya Yelusalemi, ya Yudea mobimba mpe bato ya bikolo ya bapaya, mpo ete babongola mitema mpe bazonga epai na Nzambe, bongo na nzela ya misala na bango, balakisa ete babongoli mitema.