Acts 27:21 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Sima na bato kosala mikolo ebele oyo baliaki lisusu te, Polo atelemaki liboso na bango mpe alobaki: — Baninga na ngai, bosengelaki koyoka toli na ngai ete tolongwa na Kreti te. Soki boyokelaki ngai, likama oyo elingaki kokomela bino te mpe bolingaki te kobungisa biloko na bino.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Esalaki mikolo ebele, bato bazalaki lisusu kolia te, Polo atelemaki liboso na bango mpe alobaki: “Eh baninga ngai, bosengelaki koyoka toli na ngai ete tolongwa na Krete te. Soki boyokelaki ngai, likama oyo elingaki kokomela bino te mpe bolingaki kobungisa biloko na bino te.