Acts 28:23 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Bayokanaki kokutana na Polo mokolo mosusu. Bongo tango mokolo yango ekokaki, bayaki ebele na esika oyo Polo azalaki kovanda. Wuta na tongo kino na pokwa, Polo azalaki kolimbolela bango mpe koteya bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe, mpe azalaki kosala nyonso mpo ete bandima makambo oyo azalaki koloba na tina na Yesu, na nzela ya Mobeko ya Moyize mpe makomi ya basakoli.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Boye, bayokanaki ete bakutana na Polo mokolo mosusu. Mpe tango mokolo yango ekokaki, bayaki ebele na esika oyo Polo azalaki kovanda. Wuta tongo kino na pokwa, Polo azalaki kolimbolela bango mpe koteya bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe, mpe azalaki kosala nyonso mpo ete bandima makambo oyo azalaki koloba na tina na Yesu, wuta na Mobeko ya Moyize mpe na makomi ya basakoli.