Acts 6:1 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Na mikolo wana, motango ya bayekoli ezalaki kaka kobakisama. Bayuda oyo bazalaki koloba lokota ya Greki bakomaki koyimayima mpo na kotelemela Bayuda oyo bazalaki koloba lokota ya Ebre, pamba te basi na bango oyo bakufisa mibali bazalaki kozangela na tango ya kokabola bilei ya mokolo na mokolo.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Na mikolo wana, motango ya bayekoli ezalaki kaka kobakisama. Bayuda oyo bazalaki koloba monoko ya greki bakomaki koyimayima mpo na kotelemela Bayuda oyo bazalaki koloba monoko ya ebreo, pamba te na tango ya kokabola bilei ya mokolo na mokolo, basi na bango oyo bakufisa mibali bazalaki kozangela.