Acts 7:42 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Kasi Nzambe apesaki bango mokongo mpe atikaki bango kosambela mampinga ya likolo, ndenge ekomama kati na buku ya basakoli: « Oh bato ya Isalaele, boni, bozalaki kobonzela Ngai mbeka mpe kopesa Ngai makabo na mibu tuku minei oyo bolekisaki na esobe?
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Kasi Nzambe apesaki bango mokongo mpe atikaki bango ete basambela minzoto ndenge ekomama na buku ya basakoli: “Bato ya Isalaele, bozalaki kobonzela ngai mbeka mpe kopesa ngai makabo, mibu tuku minei na esobe?