Acts 8:9 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Nzokande, wuta kala, kati na engumba yango, ezalaki na moto moko oyo kombo na ye ezalaki « Simona. » Azalaki kosala misala ya maji. Azalaki kokamwisa bato ya Samari mpe komimona moto monene.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Nzoka nde, wuta kala, ezalaki na moto moko na engumba wana, oyo kombo na ye ezalaki Simona. Azalaki kosala misala ya maji. Azalaki kokamwisa bato nyonso ya Samari mpe azalaki komimona moto monene.