Colossians 1:23 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Kasi bosengeli penza kowumela, kotelema ngwi mpe kolenda kati na kondima na bino; mpe bosengeli koboya kopengwa mosika ya elikya oyo bozwaki wuta tango boyokaki Sango Malamu. Sango Malamu yango esakolamaki kati na bikelamu nyonso oyo ezali na se ya Likolo, mpe ngai Polo nakoma mosali na yango.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Esengeli bokoba kati na kondima, bozala ya kopikama malamu penza, mpe botelema ngwi. Bondima te ete bapengwisa bino na elikya oyo bozwaki tango boyokaki sango malamu. Sango malamu oyo bateya na bato nyonso oyo bazali na mokili, oyo ngai Polo nakoma mosali na yango.