Colossians 1:27 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Nzambe asepeli kolakisa bango bomengo ya nkembo, oyo evandi kati na mabombami ya mabongisi na Ye mpo na Bapagano. Mabombami yango ezali: Klisto kati na bino, elikya ya nkembo.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Na bango nde Nzambe aponaki kolakisa bomengo ya nkembo ya sekre na ye mpo na bato oyo bazali Bayuda te. Mpe sekre yango, yangʼoyo: Klisto kati na bino, elakisi ete bozali na elikya ya kosangana na nkembo na Nzambe.