Colossians 1:6 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
oyo ekomaki kino epai na bino. Sango Malamu yango epanzani mokili mobimba, ezali kobota bambuma ebele mpe ezali kokende liboso, ndenge kaka esalaki kati na bino wuta mokolo oyo boyokaki yango mpe bozwaki penza bososoli ya kokoka na tina na ngolu ya Nzambe.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
oyo ekomaki kino epai na bino. Na mokili mobimba, sango malamu oyo ezali kobota mbuma mpe ezali kokende liboso, kaka ndenge esalaki kati na bino, banda mokolo oyo boyokaki yango mpe bososolaki ngolu ya Nzambe kati na bosolo na yango nyonso.