Colossians 3:11 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Boye, biso nyonso tozali ndenge moko: bokeseni ezali lisusu te kati na Mogreki mpe Moyuda, moto oyo akatama ngenga mpe moto oyo akatama ngenga te, mopaya mpe mwana mboka, mowumbu mpe monsomi. Bobele Klisto nde azali na tina: azali nyonso kati na bato nyonso.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Na bomoto wana ya sika, mogreki to moyuda azali te, moto akatisa nzoto to moto akatisa nzoto te azali te, bapaya to moto ayekola azali te, mowumbu to moto ya bonsomi azali te, kasi Klisto azali nyonso, mpe azali kati na nyonso.