Colossians 3:16 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Tika ete Liloba ya Klisto, kati na bomengo na yango nyonso, evanda kati na bino; boteyanaka mpe bokebisanaka na bwanya nyonso, na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu mpe banzembo oyo ewutaka na Molimo. Mpe boyembelaka Nzambe na kozongisa matondi kati na mitema na bino.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Tika ete Liloba ya Klisto, kati na bomengo na yango nyonso, evanda kati na mitema na bino. Boteyana mpe bopesana toli moko na moko na bwanya nyonso. Boyemba banzembo, masanzoli, mpe banzembo oyo Molimo apesaka; boyembela Nzambe, na bozongisi matondi kati na mitema na bino.