Ephesians 2:11 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Yango wana, bobosanaka te ete na kala, bozalaki Bapagano kolanda mbotama na bino; mpe bato oyo bamibengaka « bato bakatama ngenga » bazalaki kobenga bino « bato bakatama ngenga te, » atako bazalaki bato bakatama ngenga kati na banzoto na bango na nzela ya mosala ya maboko ya bato.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Yango wana bokanisa, bino baoyo bozalaki liboso bato ya bikolo mosusu mpo na mbotama na bino, mpe bazalaki kobenga bino “Bato bakatisa nzoto te” epai ya bato oyo bazalaki komibenga “Bato bakatisa nzoto” (kokatisama oyo esalama na nzoto na nzela ya maboko ya bato).