Ephesians 4:16 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Ezali na nguya na Ye nde nzoto mobimba ekolaka mpe emitongaka kati na bolingo, wana esili kokangana malamu mpe kokoma moko na nzela ya misisa oyo epesaka yango bilei, mpo na kopesa na eteni moko na moko nzela ya kosala mosala na yango na ndenge ekoki.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Ezali wuta na ye, nde nzoto mobimba ekangani malamu penza mpe esangani esika moko na nzela ya misisa oyo epesaka yango bilei. Bongo tango eteni moko na moko ezali kosala mosala na yango na ndenge ekoki, nzoto mobimba ezali kokola mpe ezali komitonga yango moko kati na bolingo.