Galatians 2:12 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Pamba te liboso ete bato oyo bawutaki epai ya Jake bakoma, Petelo azalaki kolia mesa moko elongo na Bapagano; kasi sima na bango kokoma, akomaki kobenda nzoto mpe akabwanaki na Bapagano yango mpo ete azalaki kobanga Bayuda.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Pamba te, liboso ete bato oyo bawutaki epai ya Zaki bakoma, Piere azalaki kolia esika moko na bandeko oyo bazalaki bayuda te. Kasi tango bakomaki, abendaki nzoto mpe akabwanaki na bango, mpo azalaki kobanga bayuda.