Galatians 2:14 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Kasi tango ngai namonaki ete bazali kotambola te na bomoi ya sembo kolanda bosolo ya Sango Malamu, nalobaki na Petelo na miso ya bango nyonso: « Ozali Moyuda, kasi ozali kobika bomoi na yo lokola Mopagano! Ndenge nini ozali kosenga na makasi ete Bapagano batambola lokola Bayuda?
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Kasi tango namonaki ete bazalaki kotambola sembo te, na ndenge solo ya Sango Malamu ezali kosenga, nalobaki na Piere na miso ya bandimi nyonso: “Soki yo moto ozali moyuda, ozali kolanda ezaleli ya bato ya bikolo ya bapaya, kasi ozali kolanda te ezaleli ya bayuda, bongo ndenge nini ozali kotinda bato ya bikolo ya bapaya balanda ezaleli ya bayuda?”