Galatians 2:4 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Esalemaki bongo likolo ya bandeko ya lokuta oyo basilaki kokota kati na biso na mayele mabe mpo na kolandela bonsomi oyo tozali na yango kati na Yesu-Klisto mpe mpo na koluka kokomisa biso bawumbu.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Kasi likambo yango ebimaki mpo na bandeko ya lokuta oyo bakotaki kati na biso na mayele mabe, oyo bakotaki kaka mpo na kotala bonsomi oyo tozali na yango kati na Klisto Yesu, mpo ete bakomisa biso bawumbu.