Galatians 2:7 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Kutu, bamonaki penza ete Nzambe apesaki ngai mokumba ya koteya Sango Malamu epai ya bato oyo bakatama ngenga te, ndenge apesaki na Petelo mokumba ya koteya Sango Malamu epai ya Bayuda.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Nzoka nde, bamonaki ete Nzambe apesaki ngai mokumba ya koteya Sango Malamu na bato ya bikolo ya bapaya, ndenge moko mpe apesaki Piere mokumba ya koteya yango epai ya bayuda.