Hebrews 10:1 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Mobeko ya Moyize ezali kaka elilingi ya biloko oyo ekoya, ezali penza bosolo na yango te; yango wana, ezali na makoki te ya kokomisa ya kokoka, bato oyo bapusanaka pene ya Nzambe na nzela ya bambeka ya ndenge moko kaka oyo bapesaka tango nyonso mpe mobu na mobu.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Mibeko ezali kaka elilingi ya makambo ya malamu oyo ezali koya, kasi ezali bosolo na yango penza te. Yango wana, Mibeko ekoki ata moke te na nzela ya mbeka ya ndenge moko, oyo bapesaka tango nyonso, mbula na mbula, kokomisa baoyo bayaka pene-pene ya Nzambe bato ya kokoka.