Hebrews 10:2 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Soki ezalaki na makoki yango, mbele bato oyo bapesaka bambeka yango balingaki wuta kala kotika kopesa yango, pamba te balingaki kopetolama mbala moko mpo na libela, mpe balingaki lisusu komitungisa te mpo na masumu na bango.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Soki Mibeko ekokaki, mbele baoyo bapesaka bambeka wana balingaki banda kala kotika kopesa yango. Pamba te, awa balingaki kokoma peto mbala moko mpo na libela, balingaki lisusu kokanisa-kanisa masumu na bango te.