Hebrews 11:7 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Mpo na kondima, Noa atosaki Nzambe mpe atongaki masuwa mpo na lobiko ya libota na ye, sima na ye koyoka makebisi ya Nzambe na tina na makambo oyo ezalaki nanu komonana te. Mpo na kondima, Noa amonisaki mabe ya mokili mpe akomaki mokitani ya bosembo oyo ezwamaka na nzela ya kondima.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Mpo na kondima, Nzambe tango akebisaki Nowa mpo na makambo oyo ezalaki naino komonana te, atosaki Nzambe mpe atongaki masuwa mpo na kobikisa libota na ye. Mpo na kondima na ye, akatelaki mokili etumbu mpe akomaki mozwi na bosembo oyo eyaka na nzela ya kondima.