Hebrews 13:9 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Bolandaka te lolenge nyonso ya mateya ya sika, pamba te ebongi ete mitema na biso elendisama na nzela ya ngolu ya Nzambe, kasi na nzela te ya mibeko oyo esungaki ata moke te bato oyo bazalaki kotosa yango.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Botika te ete bakosa bino na mateya ya ndenge na ndenge mpe ya lokuta. Pamba te, ezali malamu ete mitema na biso ezwa makasi na nzela ya ngolu ya Nzambe, kasi na nzela ya kotosa te mibeko oyo etali biloko ya kolia; Pamba te mibeko yango esalisaka te baoyo batosaka yango.