Hebrews 2:8 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
mpe otiaki biloko nyonso na se ya matambe na ye. » Awa Nzambe atiaki nyonso na se ya bokonzi na ye, atikaki ata eloko moko te oyo ezangaki kozala na se ya bokonzi na ye. Nzokande, ezali solo ete, kino sik’oyo, tomoni nanu te ete nyonso ezali na se ya bokonzi na ye.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
mpe otiaki biloko nyonso na nse ya makolo na ye. Tango atiaki biloko nyonso na nse ya bokonzi na ye, atikaki ata eloko moko te ezanga kozala na nse ya bokonzi na ye. Nzokande sikʼoyo, naino tomoni te ete biloko nyonso ezala na nse ya bokonzi na ye.