Hebrews 2:9 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Kasi tala makambo oyo tozali komona: Yesu oyo akitisamaki na se ya ba-anjelu mpo na mwa tango moke, alati sik’oyo motole ya nkembo mpe ya lokumu mpo ete andimaki pasi oyo ememaki Ye kino na kufa. Na bongo, na ngolu ya Nzambe, Yesu akufaki nde mpo na bato nyonso.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Kasi tala likambo tozali komona mpo na Yesu: Nzambe atiaki ye na nse ya baanzelu mpo na mwa tango moke, mpo ete na nzela ya ngolu ya Nzambe akoka kokufa mpo na bato nyonso. Kasi sikʼoyo, atondi na nkembo mpe lokumu, mpo na liwa oyo anyokwamaki na yango.