Hebrews 4:7 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
yango wana Nzambe abongisi lisusu mokolo moko oyo azali kobenga « lelo, » tango alobaki, sima na mikolo, na nzela ya Davidi: « Lelo, soki boyoki mongongo na Ye, boyeisa mitema na bino mabanga te. »
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Yango wana Nzambe atiaki lisusu mokolo moko, oyo azali kobenga lelo. Alobaki mpo na yango kala penza na nzela ya David, ndenge elobamaki liboso: Lelo, soki boyoki mongongo na ngai, boyeisa mitema na bino makasi te.