Hebrews 7:1 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Melishisedeki azalaki mokonzi ya Salemi mpe Nganga-Nzambe ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo. Ezali Melishisedeki nde akendeki kokutana na Abrayami, wana Abrayami azali kozonga sima na ye kolonga bakonzi; mpe ezali Melishisedeki nde apambolaki Abrayami.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Melkisedeki azalaki mokonzi ya Salem mpe nganga-Nzambe ya Nzambe oyo aleki likolo. Akutanaki na Abraham, tango Abraham awutaki na etumba sima ya kolonga bakonzi, mpe apambolaki ye.