Hebrews 9:19 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Pamba te, tango Moyize asilisaki kotangela bato mitindo nyonso ndenge ekomami kati na Mibeko, akamataki makila ya bana ngombe, ya bantaba elongo na mayi, asopelaki buku mpe bato nyonso na nzela ya etape ya nzete ya izope, oyo balinga elamba ya lino ya motane.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Pamba te, tango Moyize asilisaki kotanga mitindo nyonso ndenge yango ekomamaki na kati ya Mibeko, akamataki makila ya bana ngombe, elongo na oyo ya bantaba elongo na mayi, elamba ya lino ya motane mpe etape ya nzete ya Izope, bongo asopelaki buku mpe bato nyonso.