Hebrews 9:25 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Klisto akotaki kuna te mpo ete amikabaka mbala na mbala lokola mbeka, ndenge mokonzi ya Banganga-Nzambe azalaki kokota mobu na mobu kati na Esika ya Bule elongo na makila oyo ezalaki ya ye te.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Mpe lisusu, ezali mbula na mbula nde Mokonzi ya banganga-Nzambe azalaki kokota na esika ya bosantu elongo na makila oyo ezalaki ya ye te; kasi Kristo akotaki kuna te mpo amikabaka mbala mingi.