John 12:16 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Bayekoli ya Yesu bayebaki nanu te tina ya makambo oyo ezalaki kosalema. Kaka tango Yesu akotaki kati na nkembo nde basosolaki ete makambo yango ekomamaki na tina na Ye, mpe ete bakokisaki kaka makambo oyo Makomi eloba.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Na tango wana, bayekoli na ye basosolaki te tina ya makambo yango; kasi tango Yesu akotaki kati na nkembo, bongo nde bakundolaki na mitema ete makambo yango ekomamaki mpo na ye, mpe basalaki makambo wana epai na ye.