John 18:16 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Petelo azalaki kozela libanda, na liboso ya ekuke. Moyekoli wana, oyo ayebanaki na mokonzi ya Banganga-Nzambe, abimaki, asololaki na mwasi mokengeli ekuke mpe akotisaki Petelo.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
kasi Piere azalaki kozela libanda, liboso ya porte. Moyekoli oyo mosusu, oyo ayebanaki na mokonzi ya banganga-Nzambe, abimaki mpe alobaki na mwasi oyo azalaki kokengela porte, akotisaki mpe Piere.