John 18:20 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Yesu azongiselaki ye: — Nazalaki koloba na polele penza na miso ya bato nyonso, nazalaki koteya tango nyonso kati na bandako ya mayangani mpe kati na Tempelo, epai wapi Bayuda nyonso basanganaka; nalobaki eloko moko te na nkuku.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Yesu azongiselaki ye: —Nazalaki koloba polele epai ya bato nyonso; nazalaki koteya tango nyonso na Bandako ya mayangani mpe na lopango ya Ndako ya Nzambe, epai Bayuda nyonso basanganaka. Mpe nalobaki eloko moko te na sekele.