John 18:3 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Boye Yuda akendeki na elanga yango mpe amemaki lisanga ya basoda mpe ya bakengeli oyo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo bapesaki ye. Bato yango basimbaki minda, banzete oyo ezalaki kopela moto mpe bibundeli.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Bongo Yuda akendaki na elanga; azalaki kokamba lisanga ya basoda mpe ya bakengeli oyo bakonzi ya banganga-Nzambe na bafarizeo bapesaki ye. Bato yango bazalaki na minda, banzete oyo ezalaki kopela moto, na bibundeli na maboko.