John 18:37 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Pilato atunaki: — Elingi koloba nini, ozali nde mokonzi? Yesu azongisaki: — Yo nde olobi yango ete nazali mokonzi. Nabotamaki mpe nayaki kati na mokili mpo na kopesa litatoli na tina na solo. Moto oyo azali kati na solo ayokaka mongongo na Ngai.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Bongo Pilato atunaki: —Elingi koloba ete ozali mokonzi? Yesu azongisaki: —Yo moto olobi ete nazali mokonzi! Nabotamaki mpe nayaki na mokili mpo na kotatola solo. Moto oyo azali kati na solo, ayokaka mongongo na ngai.