John 19:15 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Kasi babandaki koganga: — Boma ye! Boma ye! Baka ye na ekulusu! Pilato alobaki na bango lisusu: — Nasengeli penza kobaka mokonzi na bino na ekulusu? Bakonzi ya Banganga-Nzambe bazongisaki: — Tozali kaka na Sezare lokola mokonzi, mokonzi mosusu azali te!
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Kasi bagangaki: —Longola ye na miso na biso! Longola ye na miso na biso! Baka ye na ekulusu! Pilato atunaki bango: —Bolingi nabaka mokonzi na bino na ekulusu? Bakonzi ya banganga-Nzambe bazongisaki: —Tozali na mokonzi mosusu te, kaka Sezare!