John 19:23 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Sima na basoda kobaka Yesu na ekulusu, bakamataki bilamba na Ye mpe bakabolaki yango na biteni minei: soda moko na moko azwaki eteni moko. Bakamataki mpe nzambala na Ye, oyo ezalaki ya kotongama te, kasi ezalaki kaka elamba moko, kobanda na likolo kino na se.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Tango basoda basilisaki kobaka Yesu na ekulusu, bakamataki bilamba na ye, mpe bakabolaki yango na biteni minei, soda moko-moko na eteni na ye. Bakamataki mpe nzambala na ye; nzambala yango batongaki yango na biteni te, kasi batongaki yango kaka na elamba moko banda na likolo kino na nse.