John 19:24 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Basoda balobanaki bango na bango: — Topasola yango te, kasi tobeta zeke mpo na koyeba soki nani akozwa yango. Esalemaki bongo mpo ete Makomi oyo ekokisama: « Bakabolaki bilamba na ngai kati na bango mpe babetaki zeke mpo na nzambala na ngai. » Ezali makambo wana nde basoda basalaki.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Basoda balobanaki: —Topasola yango te, kasi tobetela yango zeke, bongo totala soki nani akozwa yango! Esalamaki bongo mpo ete Makomi ekokisama, oyo ezali koloba: Bakabolaki bilamba na ngai kati na bango, mpe babetelaki nzambala na ngai zeke! Tala makambo basoda basalaki.