John 19:31 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Lokola ezalaki mokolo ya komilengela mpo na Saba, mpe lokola Saba yango ezalaki na tina makasi, Bayuda balingaki te ete bibembe etikala na ba-ekulusu na tango ya Saba. Boye, bakendeki kosenga epai ya Pilato ete apesa mitindo ya kobuka makolo ya bibembe oyo ezalaki na likolo ya ba-ekulusu mpe ya kolongola banzoto na bango.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Lokola ezalaki mokolo ya komilengela mpo na saba, mpe saba yango ezalaki ya kafu-kafu, Bayuda balingaki te ete banzoto etikala na ba-ekulusu na tango ya saba. Yango wana, bakendaki kosenga Pilato ete babuka bango makolo, mpe balongola banzoto na bango.