John 19:38 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Sima na makambo wana, Jozefi, moto ya mboka Arimate, oyo azalaki moyekoli ya Yesu, kasi na nkuku mpo ete azalaki kobanga Bayuda, asengaki epai ya Pilato ndingisa ya kokitisa nzoto ya Yesu longwa na ekulusu. Pilato apesaki ye ndingisa yango, mpe Jozefi akendeki mpe akitisaki nzoto ya Yesu.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Sima na yango, Zozefi ya mboka Alimateo, asengaki nzela na Pilato mpo alongola nzoto ya Yesu na ekulusu. Ye mpe azalaki moyekoli ya Yesu, kasi ya kobombama, pamba te azalaki kobanga Bayuda. Bongo Pilato apesaki ye nzela. Zozefi ayaki mpe alongolaki nzoto ya Yesu.