John 20:26 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Sima na mikolo mwambe, bayekoli ya Yesu basanganaki lisusu kati na ndako. Na mbala oyo, Toma mpe azalaki elongo na bango, mpe bikuke ezalaki ya kokangama. Yesu ayaki, atelemaki kati na bango mpe alobaki: — Tika ete kimia ezala na bino!
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Sima ya mikolo mwambe, bayekoli bazalaki lisusu na ndako, Toma mpe azalaki elongo na bango; mpe baporte ezalaki ya kokangama. Bongo Yesu ayaki mpe atelemaki na kati-kati na bango mpe alobaki: —Kimia ezala na bino!