John 21:17 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Bongo Yesu atunaki ye mpo na mbala ya misato: — Simona, mwana mobali ya Yoane; boni, olingaka Ngai? Petelo ayokaki mawa mingi kati na motema mpo ete ekomaki mbala ya misato oyo Yesu atunaki ye: « Olingaka Ngai? » Bongo azongiselaki Yesu: — Nkolo, oyebi makambo nyonso; oyebi malamu ete nalingaka Yo! Yesu alobaki na ye: — Batela bameme na Ngai.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Bongo Yesu alobaki na ye lisusu mpo na mbala ya misatu: —Simon mwana ya Jonasi, olingaka ngai? Piere ayokaki mawa mingi na motema, pamba te Yesu atunaki ye mpo na mbala ya misato: “Olingaka ngai?” Bongo azongiselaki ye: —Nkolo, oyebi makambo nyonso, oyebi ete nalingaka yo! Yesu alobaki na ye: —Batela bameme na ngai!