John 5:14 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Sima na mwa tango, Yesu amonaki, kati na lopango ya Tempelo, moto oyo abikaki. Alobaki na ye: — Tala, omoni ndenge okomi sik’oyo nzoto kolongono. Kosala lisusu masumu te, noki te likambo moko ya mabe koleka ekomela yo.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Sima, Yesu akutanaki na ye na lopango ya Ndako ya Nzambe mpe alobaki na ye: —Tala, obiki; kosala lisusu masumu te mpo ete likambo moko ya mabe koleka ekweyila yo te!