John 8:52 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Na yango, Bayuda balobaki na Ye: — Tomoni sik’oyo ete ozali na molimo mabe kati na yo! Pamba te Abrayami asila kokufa, basakoli mpe lokola; bongo yo ozali koloba ete moto oyo akobatela Liloba na yo kati na ye akotikala kokufa te!
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Bongo Bayuda balobaki na ye: —Sikʼoyo tomoni polele ete ozali na molimo mabe! Pamba te, Abraham mpe baprofeta basiʼbakufa; bongo yo olobi ete moto oyo akobatela maloba na yo akokufa soki moke te!