Jude 1:13 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Babimisaka misala na bango ya soni ndenge ebale monene ebimisaka mbonge mpe fulufulu soki etomboki makasi; bazali lokola minzoto oyo eyengaka-yengaka. Nzambe abombeli bango etumbu ya molili makasi mpo na libela.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Bazali lokola bambonge ya makasi oyo ya ebale, oyo ebwakaka fulu-fulu ya soni na yango; bazali lokola minzoto oyo elekaka-lekaka, Nzambe abombeli bango molili ya makasi mpo na libela.