Jude 1:4 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Pamba te ezali na bato mosusu oyo basili kokota kati na bino na mayele mabe, ba-oyo etumbu na bango ekomama wuta kala: batosaka makambo ya Nzambe te, bakomisaka ngolu ya Nzambe na biso lokola nzela ya kosala makambo na bango ya soni, mpe bawanganaka Yesu-Klisto, Mokonzi kaka moko mpe Nkolo na biso.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Pamba te, bato mosusu basiʼbakoti na ndenge ya mayele na kati na bino, bato oyo etumbu na bango esiʼekomama banda kala. Bazali bato oyo batosaka makambo ya Nzambe te, babongolaka ngolu ya Nzambe na biso mpo bazala na bonsomi ya kosala makambo ya mabe, mpe bawanganaka Yesu Kristo, Mokonzi kaka moko mpe Nkolo na biso.