Luke 10:13 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Mawa na yo, Korazini! Mawa na yo, Betisaida! Pamba te soki bikamwa oyo esalemaki kati na bino esalemaki kati na bingumba Tiri mpe Sidoni, mbele wuta kala, bavandi na yango babongola mitema, balata basaki mpe bamipakola putulu.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Mawa na yo Korazini! Mawa na yo Betsayida! Pamba te, soki makamwisi oyo esalamaki epai na bino esalamaka na Tire mpe Sidoni, mbele kala penza balingaki kobongola mitema, mpe kolakisa yango, na kolata saki mpe na komipakola putulu.