Luke 10:21 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Kaka na tango yango, awa Molimo Mosantu atondisaki Ye na esengo, Yesu alobaki: — Oh Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya mabele, nakumisi Yo! Pamba te obombaki makambo oyo, mpo ete bato ya bwanya mpe bato ya mayele bayeba yango te, kasi olakisi yango na bana mike. Iyo, Tata, pamba te yango nde osepelaki kosala.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Kaka na tango wana, Yesu atondaki na esengo na nzela ya Molimo Mosantu, mpe alobaki: —E e Tata, Nkolo ya likolo mpe ya nse, nakumisi yo pamba te obombi makambo oyo na bato ya bwania mpe na bato ya mayele, mpe olakisi yango na bana mike. E e Tata, pamba te olingaki bongo.