Luke 11:42 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Mawa na bino, Bafarizeo! Bofutaka eteni ya zomi ya bandembi, ya matungulu mpe ya bandunda ya lolenge nyonso, kasi bomonaka pamba bosembo mpe bolingo ya Nzambe. Nzokande bosengeli nde kotia yango na misala, mpe kozwa na motuya likambo oyo wana ya kofuta eteni ya zomi.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Kasi mawa na bino bafarizeo! Pamba te bofutaka eteni moko ya zomi ata ya biloko ya mike-mike oyo bolonaka na bilanga na bino, kasi bobwakaka bosembo mpe bolingo ya Nzambe. Esengeli bokokisaka makambo oyo, kasi bobosanaka mpe te oyo wana.